YouVersion Logo
Search Icon

Luka 24

24
Yesu asekwi
(Mat 28.1-9; Mlk 16.1-8; Yn 20.1-13)
1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. 2Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. 3Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. 4Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. 5Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango :
— Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? 6Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : 7« Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »
8Boye, bakanisaki maloba ya Yesu.
9Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
Yesu abimeli bayekoli na nzela ya Emausi
13Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. 14Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. 15Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. 16Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17Alobaki na bango :
— Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ?
Batelemaki, bilongi mawa-mawa. 18Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye :
— Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo !
19Yesu atunaki bango :
— Makambo nini ?
Bazongisaki :
— Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. 20Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu. 21Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
22Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, 23kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. 24Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25Yesu alobaki na bango :
— Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba ! 26Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?
27Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29Kasi bango babondelaki Ye makasi :
— Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota.
Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. 30Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango. 31Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango. 32Batunanaki :
— Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?
33Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, 34oyo balobaki na bango :
— Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
35Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
Yesu abimeli bayekoli zomi na moko
(Yn 20.19-23)
36Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki :
— Tika ete kimia ezala na bino !
37Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38Yesu atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? 39Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.
40Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango :
— Bozali awa na eloko ya kolia ?
42Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44Bongo alobaki na bango :
— Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
45Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46Alobaki na bango :
— Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ; 47mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. » 48Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. 49Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.
(Mlk 16.19; Mis 1.4-14)
50Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. 53Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.

Currently Selected:

Luka 24: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy