YouVersion Logo
Search Icon

Luka 23

23
Yesu liboso ya Pilato mpe Erode
(Mat 27.2, 11-14; Mlk 15.1-5; Yn 18.28-38)
1Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ; 2mpe kuna, bakomaki kofunda Ye :
— Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !
3Pilato atunaki Yesu :
— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?
Yesu azongisaki :
— Olobi yango.
4Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato :
— Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.
5Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki :
— Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
6Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile. 7Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
8Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi. 9Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
10Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu. 11Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato. 12Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
Bakateli Yesu etumbu ya kufa
(Mat 27.15-26; Mlk 15.1-15; Yn 18.39–19.16)
13Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango :
14— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye. 15Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. 16Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye.
[17Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]#23.17 Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.
18Bato nyonso bagangaki :
— Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi !
19Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
20Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu. 21Kasi bakobaki koganga :
— Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu !
22Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato :
— Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.
23Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
24Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ; 25abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
Kufa ya Yesu
(Mat 27.31-44; Mlk 15.20-32; Yn 19.17-22)
26Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu. 27Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye. 28Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki :
— Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino. 29Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! » 30Bongo
bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! »
Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »
31 Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?
32Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
33Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34Yesu alobaki :
— Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala # 23.34 Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala. .
Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. 35Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki :
— Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
36Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi 37mpe balobaki :
— Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
38Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
39Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
40Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! 41Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
(Mat 27.45-56; Mlk 15.33-41; Yn 19.25-30)
44Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, 45pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. 46Yesu agangaki na mongongo makasi :
— Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.
Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
47Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki :
— Moto oyo azalaki penza sembo !
48Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. 49Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
Bakundi Yesu
(Mat 27.57-61; Mlk 15.42-47; Yn 19.38-42)
50Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo, 51mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. 52Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. 53Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. 54Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda. 55Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango. 56Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.

Currently Selected:

Luka 23: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy