YouVersion Logo
Search Icon

Loyembo ya Salomo 1

1
1Oyo nde nzembo oyo eleki kitoko kati na banzembo ya Salomo.
Kosanzola bolingo
Elenge mwasi
2Tika ete bibebu na yo epesa ngai beze,
pamba te bolingo na yo eleki vino na elengi.
3Solo ya malasi na yo ezali kitoko,
mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko
oyo epanzani ;
yango wana bilenge basi balingaka yo !
4Tokende na yo elongo, tokima mbangu !
Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye !
Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo,
tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi.
Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo !
5Oh bilenge basi ya Yelusalemi,
nazali mwindo, kasi nazali kitoko !
Solo, nazali mwindo lokola bandako ya kapo ya Kedari,
lokola barido ya kitoko na ndako ya kapo ya Salomo.
6Kokamwa ngai te mpo ete nazali mwindo,
pamba te moyi nde eyindisi ngai.
Bana mibali ya mama na ngai basilikelaki ngai,
bakomisaki ngai mokengeli bilanga ya vino.
Solo, bilanga na ngai moko ya vino,
nazalaki kokoka lisusu te kokengela yango.
7Oh mobali oyo ngai nalingaka,
yebisa ngai esika nini oleisaka bibwele na yo,
esika nini opemisaka bampate na yo na midi !
Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo azali koyengayenga
sima na bibwele ya baninga na yo ?
Babateli bibwele
8Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,
soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele,
na banzela oyo yango elekeli,
mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
Elenge mobali
9Oh bolingo na ngai, nazali komona yo
lokola mpunda ya mwasi oyo ebendaka shar ya Faraon.
10Matama na yo ezalaka kitoko kati na biloko ya matoyi,
mpe kingo na yo ebongaka na mayaka.
Babateli bibwele
11Tokolukela yo biloko ya matoyi ya wolo
oyo batia bambuma ya mike-mike ya palata.
Elenge mwasi
12Tango mokonzi azalaki kolia na mesa na ye,
malasi na ngai ya nare ezalaki kopanza
solo na yango ya kitoko.
13Molingami na ngai azali mpo na ngai
lokola liboke ya malasi ya mire,
akolekisa butu na ye na kati-kati ya mabele na ngai.
14Molingami na ngai azali mpo na ngai
lokola liboke ya bambuma ya ene oyo ewutaka
na bilanga ya vino ya Eyini-Gedi.
Elenge mobali
15Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko !
Solo, ozali penza kitoko makasi !
Miso na yo elala lokola ebenga.
Elenge mwasi
16Mobali na ngai, tala ndenge nini ozali kitoko !
Ozali penza elengi.
Mbeto na biso ezali nde matiti ya mobesu,
17makonzi ya ndako na biso esalemi na banzete ya sedele,
mpe balate na yango, na banzete ya sipele.

Currently Selected:

Loyembo ya Salomo 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy