YouVersion Logo
Search Icon

Mosakoli 12

12
Kobosana Mokeli na yo te
1Kanisa Mokeli na yo,
na mikolo nyonso ya bolenge na yo,
liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo,
mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango :
« Nazali kosepela na ngai na yango te ; »
2liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto,
ekoma molili,
mpe mapata ezonga sima na mvula ;
3tango bakengeli ya ndako bakolenga,
mpe bato ya makasi bakofukama ;
tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango
mpo ete bazali lisusu mingi te,
mpe bato oyo batalaka na maninisa
bakobungisa kitoko na bango ;
4tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala,
mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila ;
tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke
mpe bayembi ya basi batikaka koyemba ;
5tango bato bakomaka kobanga komata likolo,
mpe bakomaka kobanga makama na nzela ;
tango nzete ya pome ebimisaka mbuma,
tango mabanki ekomaka kilo,
mpe baposa ekokisamaka lisusu te ;
pamba te moto akendaka na ndako ya libela,
mpe basi oyo balelaka na bibembe
basanganaka na balabala.
6Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete
singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana,
eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi,
mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana ;
7liboso ete putulu ezonga na mabele
epai wapi ewutaki,
mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
8Pamba na pamba, elobi mosakoli,
makambo nyonso ezali kaka pamba.
Suka ya mateya
9Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi ; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza. 10Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
11Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko. 12Mwana na ngai, keba ete obakisa eloko moko te na likolo na yango.
Suka ezali te mpo na kokoma mikanda ebele, mpe koyekola mingi elembisaka nzoto.
13Yoka suka ya mateya nyonso :
Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye,
pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.
14Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama,
ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.

Currently Selected:

Mosakoli 12: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy