YouVersion Logo
Search Icon

Banzembo 150

150
Nzembo 150
Bokumisa Yawe na mindule
1Bokumisa Yawe !
Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,
bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene
epai wapi avandi na nguya makasi !
2Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !
Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !
3Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;
bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !
4Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !
Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !
5Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !
Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !
6Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !
Bokumisa Yawe !

Currently Selected:

Banzembo 150: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy