YouVersion Logo
Search Icon

Masese 1

1
Maloba ya ebandeli
1Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :
2mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya
mpe kososola maloba ya mayele ;
3mpo na kozwa mateya ya bwanya
oyo epesaka bizaleli ya sembo,
ya boyengebene mpe makambo ya alima ;
4mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,
mpe boyebi epai ya bilenge.
5Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,
mpe akobakisa bwanya na ye,
bongo moto ya mayele akoyeba mayele
ya kotambolisa bato ;
6mpo na kososola masese mpe sambole,
maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Fungola ya bwanya
7Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;
bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
8Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
9Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
10Mwana na ngai ya mobali,
soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.
11Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso,
tika ete tosala motambo mpo na koboma bato,
tokosepela mpo na kokanga moto
oyo ayebi likambo te !
12Ndenge mokili ya bakufi esalaka,
tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba
lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;
13tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge,
mpe tokotondisa bandako na biso
na bomengo ya bitumba ;
14okozwa ndambo na yo epai na biso,
pamba te biso nyonso tokosangisa
biloko na biso esika moko ; »
15mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te,
longola makolo na yo na nzela na bango ;
16pamba te makolo na bango ekimaka mbangu
mpo na kolanda mabe,
mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.
17Solo, ezali pamba kotia monyama
liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
18Kasi bango, batiaka mitambo
mpo na kosopa makila na bango moko,
bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
19Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta
asukaka kaka bongo,
mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.
Bwanya azali kobelela
20Bwanya azali koganga na libanda,
atomboli mongongo na ye na bisika
oyo bato ebele bakutanaka ;
21azali koganga na bisika ya loyenge
mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba :
22« Yo moto oyo ozangi mayele,
kino tango nini okolinga bozoba na yo ?
Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ?
Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba
koyina mayele ?
23Soki boyoki makebisi na Ngai,
nakosopela bino Molimo na Ngai
mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
24Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela
mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,
25lokola bobwakaki toli na Ngai
mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,
26Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino,
nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
27tango minyoko ekokomela bino na pwasa
lokola mvula ya kake makasi,
tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki,
tango mawa mpe somo ekokomela bino.
28Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ;
bakoluka Ngai na ngonga ya malamu,
kasi bakomona Ngai te.
29Lokola bayinaki boyebi
mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,
30lokola baboyaki kondima toli na Ngai
mpe batiolaki pamela na Ngai,
31bakolia mbuma ya etamboli na bango
mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.
32Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele
ekoboma bango,
mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele
ekoboma kaka bango moko ;
33kasi moto oyo ayokaka Ngai
akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »

Currently Selected:

Masese 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy