YouVersion Logo
Search Icon

Malashi 3

3
1« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
2Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya ? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana ? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba. 3Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala. 4Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala.
5« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Kobengama mpo na kobongola mitema
6« Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka. 7Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
« Kasi bozali komituna : ‹ Tokozonga ndenge nini ? ›
8Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? ›
Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo. 9Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai. 10Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo. 11Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 12« Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13Yawe alobi : « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai.
Kasi bozali kotuna : ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo ? ›
14Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ? 15Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › »
16Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.
17« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 18« Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te. 19Pamba te mokolo yango ezali koya ; ekozala moto makasi lokola fulu ya moto. Bato nyonso ya lofundu mpe bato nyonso oyo basalaka mabe bakokoma lokola matiti ya kokawuka. Mokolo yango ekozikisa bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ekotikala ata mosisa to etape te.
20Kasi mpo na bino oyo botosaka Kombo na Ngai, moyi ya bosembo ekobima mpe ekomemela bino lobiko. Boye, bokobina mpe bokopumbwa na esengo lokola bana ngombe ya mibali kati na lopango. 21Bokonyata bato mabe, pamba te bakokoma lokola putulu na se ya matambe na bino, na mokolo oyo nazali kobongisa, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
22« Bokanisa Mobeko, malako mpe mitindo oyo napesaki epai ya Moyize, mosali na Ngai, na ngomba Orebi, mpo na Isalaele mobimba. 23Liboso ete mokolo ya Yawe eya, mokolo monene mpe ya somo, nakotindela bino mosakoli Eliya. 24Akozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, soki te nakoya kobebisa mokili na nzela ya bilakeli mabe. »

Currently Selected:

Malashi 3: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy