YouVersion Logo
Search Icon

Malashi 2

2
Likebisi epai ya Banganga-Nzambe
1« Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino : 2Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.
3Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango. 4Bokoyeba solo ete napesi bino likebisi oyo mpo ete boyokani na Ngai elongo na Levi esuka te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 5« Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai. 6Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo ; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu. 7Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga. 8Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino ; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 9« Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »
Mabala elongo na bapaya
10Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ? 11Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya. 12Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Koboma libala
13Tala makambo mosusu oyo bosalaka : bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino. 14Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.
15Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !
16Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.
Mokolo ya kosambisama
17Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? »
Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? »

Currently Selected:

Malashi 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy