YouVersion Logo
Search Icon

Luka 2

2
Mbotama ya Yesu
(Mat 1.17-25)
1Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome. 2Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri.
3Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye. 4Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. 5Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi.
6Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. 7Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.
8Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango. 9Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi.
10Kasi anjelu alobaki na bango :
— Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi. 11Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo. 12Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele.
13Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba :
14« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo,
mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »
15Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »
16Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele. 17Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango. 18Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki. 19Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.
20Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango.
Bamemi Yesu na Tempelo
21Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi. 22Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo, 23kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; » 24mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka.
Simeoni ayambi Masiya kati na Tempelo
25Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. 26Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo.
27Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki, 28Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo :
29« Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo,
tika ete mowumbu na Yo akende na kimia !
30Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi
oyo awuti epai na Yo,
31Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso :
32pole mpo na kongengisa bikolo,
mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »
33Tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi maloba oyo Simeoni alobaki na tina na Ye.
34Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu :
— Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato. 35Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga.
36Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ; 37sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi ; azalaki kokila bilei mpe kosambela. 38Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.
39Sima na bango kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, Mari mpe Jozefi bazongaki kati na Galile, na Nazareti, engumba na bango. 40Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.
Yesu kati na Tempelo
41Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika. 42Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano.
43Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi ; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali. 44Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. 45Kasi bamonaki Ye te ; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi.
46Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna. 47Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye. 48Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye :
— Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !
49Yesu azongiselaki bango :
— Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?
50Kasi basosolaki te maloba na Ye.
51Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye. 52Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.

Currently Selected:

Luka 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy