YouVersion Logo
Search Icon

Luka 1

1
1Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso, 2kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe.
3Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu, 4mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki.
Mbotama mpe bomwana ya Yesu
Sango ya mbotama ya Yoane Mobatisi
5Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron. 6Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo. 7Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.
8Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye, 9aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa. 10Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda. 11Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa. 12Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye. 13Kasi anjelu alobaki na ye :
— Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. » 14Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye, 15pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. 16Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango, 17mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.
18Zakari atunaki anjelu :
— Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.
19Anjelu azongiselaki ye :
— Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu. 20Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama.
21Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule. 22Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba. 23Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.
24Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano. 25Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »
Sango ya mbotama ya Yesu
26Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » 27Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. 28Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :
— Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
29Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
30Kasi anjelu alobaki na ye :
— Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! 31Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » 32Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. 33Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.
34Mari atunaki anjelu :
— Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?
35Anjelu azongiselaki ye :
— Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. 36Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. 37Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
38Mari azongiselaki ye :
— Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !
Bongo anjelu akabwanaki na ye.
Mari akei kotala Elizabeti
39Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda. 40Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote. 41Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu 42mpe agangaki na mongongo makasi :
— Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo ! 43Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? 44Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai. 45Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye !
46Bongo Mari alobaki :
— Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,
47mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,
48pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.
Yango wana, kobanda lelo,
bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
49pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;
Kombo na Ye ezali Bule.
50Atalisaka boboto na Ye tango nyonso
epai ya bato oyo batosaka Ye.
51Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye,
apanzi bato oyo batonda na lolendo,
52akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi,
kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.
53Atondisi na biloko ya malamu
bato oyo bazalaki na nzala,
mpe azongisi bazwi maboko pamba.
54Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye,
abosani te kotalisa boboto na Ye,
55ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso,
epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye,
mpo na tango nyonso.
56Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye.
Mbotama ya Yoane Mobatisi
57Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. 58Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.
59Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari. 60Kasi mama na ye alobaki :
— Te ! Kombo na ye ezali Yoane.
61Kasi balobaki na ye :
— Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana.
62Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana. 63Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki : « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki.
64Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe.
65Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. 66Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye.
Loyembo ya Zakari
67Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola :
68« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama,
pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;
69abimiseli biso Mobikisi ya nguya,
kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ;
70akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala
na nzela ya basakoli na Ye ya bule,
71lobiko liboso ya banguna na biso,
mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ;
72atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na biso
mpe akanisi Boyokani na Ye ya bule ;
73akokiseli biso ndayi oyo alapaki
epai ya Abrayami, koko na biso,
74ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso,
mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te,
75kati na bosantu mpe bosembo,
liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso.
76Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo :
mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ;
pamba te okotambola na liboso ya Nkolo
mpo na kobongisela Ye nzela
77mpe mpo na koyebisa bato na Ye
ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango,
78mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso,
oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo,
79mpo na kopesa pole na bato nyonso
oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa,
mpe mpo na kotambolisa makolo na biso
kati na nzela ya kimia. »
80Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.

Currently Selected:

Luka 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy