YouVersion Logo
Search Icon

Yoane 2

2
Likamwisi ya liboso : Yesu abongoli mayi vino
1Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango. 2Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
3Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :
— Bazali lisusu na vino te !
4Kasi Yesu azongiselaki ye :
— Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.
5Mama na Ye alobaki na basali :
— Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
6Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale. 7Bongo Yesu alobaki na basali :
— Botondisa bambeki oyo na mayi.
Batondisaki yango meke.
8Alobaki lisusu :
— Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti.
Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
9Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki 10mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! »
11Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
12Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo.
Kokoso ya liboso kati na Tempelo
(Mat 21.12-17; Mlk 11.15-17; Lk 19.45-46)
13Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi. 14Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango. 15Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele. 16Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? »
17Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! »
18Bayuda balobaki na Yesu :
— Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?
19Yesu azongisaki :
— Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
20Bayuda balobaki lisusu :
— Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?
21Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.
22Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
23Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala. 24Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso. 25Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.

Currently Selected:

Yoane 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy