1
Masese 26:4-5
Mokanda na Bomoi
MNB
Kozongisela zoba te kolanda bozoba na ye, noki te okokokana na ye. Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.
Compare
Explore Masese 26:4-5
2
Masese 26:11
Ndenge kaka mbwa ezongelaka kolia biloko oyo yango moko esanzi, ndenge wana mpe zoba azongelaka bozoba na ye.
Explore Masese 26:11
3
Masese 26:20
Soki bakoni ezali te, moto ekokufa ; soki bato ya songisongi bazali te, koswana ekokita.
Explore Masese 26:20
4
Masese 26:27
Moto oyo atimolaka libulu akweyaka ye moko kati na yango ; mpe moto oyo atindikaka libanga, libanga yango ekozongela kaka ye moko.
Explore Masese 26:27
5
Masese 26:12
Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
Explore Masese 26:12
6
Masese 26:17
Moto oyo akotaka makambo oyo etali ye te azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoyi.
Explore Masese 26:17