1
Masese 27:17
Mokanda na Bomoi
MNB
Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu, ndenge wana mpe moto abongaka soki akutani na moto mosusu.
Compare
Explore Masese 27:17
2
Masese 27:1
Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.
Explore Masese 27:1
3
Masese 27:6
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
Explore Masese 27:6
4
Masese 27:19
Ndenge mayi ezalaka lokola kitalatala mpo na elongi, ndenge wana mpe motema ya moto elakisaka bomoto na ye moko.
Explore Masese 27:19
5
Masese 27:2
Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
Explore Masese 27:2
6
Masese 27:5
Pamela oyo epesami na polele ezali malamu koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
Explore Masese 27:5
7
Masese 27:15
Mwasi oyo alinga koswana azali lokola ndako oyo etangaka na tango ya mvula.
Explore Masese 27:15