YouVersion Logo
Search Icon

Sofoni 1

1
Mokolo ya Yawe
1Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :
2« Nakosilisa kobebisa biloko nyonso
oyo ezali kati na mokili, »
elobi Yawe,
3« solo, nakoboma ezala bato to banyama,
ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ;
nakolongola, na mokili, bato mabe
mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku »
elobi Yawe.
Etumbu ya mokili ya Yuda
4« Nakosembola loboko na Ngai
mpo na kopesa mokili ya Yuda
mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ;
nakosilisa koboma, na esika oyo,
nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala
elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano,
oyo basalelaka banzambe ya bikeko :
5bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako
mpo na kosambela mampinga ya likolo,
bato nyonso oyo bagumbamaka
na kolapa ndayi na Kombo na Yawe
mpe na kombo na nzambe Moloki,
6bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo,
oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.
7Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe,
pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene !
Yawe abongisi mbeka,
abulisi babengami na Ye.
8Na mokolo ya mbeka ya Yawe,
nakopesa etumbu epai ya bakambi,
epai ya bana mibali ya mokonzi
mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.
9Na mokolo wana,
nakopesa etumbu epai ya bato nyonso
oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo,
bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko
na makambo ya kanza mpe na lokuta.
10Na mokolo wana, »
elobi Yawe,
« koganga makasi ekoyokana
wuta na Ekuke ya Bambisi,
kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika
mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.
11Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela,
pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa,
mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !
12Na tango wana,
nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda,
nakopesa etumbu epai ya bato nyonso
oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka :
‹ Yawe asalaka na Ye eloko te,
ezala ya malamu to ya mabe. ›
13Bakobotola bango bomengo na makasi
mpe bakobuka bandako na bango ;
bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ;
bakosala bilanga ya vino,
kasi bakotikala komela vino na yango te. »
Mokolo ya Yawe
14Mokolo monene ya Yawe ekomi pene,
solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza.
Boyoka ! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo ;
ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.
15Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi,
mokolo ya pasi mpe ya somo,
mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama,
mokolo ya butu mpe ya molili makasi,
mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,
16mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba
mpo na kobundisa bingumba batonga makasi
mpe bandako milayi oyo batonga makasi.
17Nakotindela bato pasi ya makasi :
bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga,
pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe ;
bakopanza makila na bango lokola putulu
mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.
18Na mokolo ya kanda na Yawe,
ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te.
Na moto ya zuwa na Ye,
mokili mobimba ekozikisama,
pamba te akosukisa na mbalakata
bavandi nyonso ya mokili.

Currently Selected:

Sofoni 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy