YouVersion Logo
Search Icon

Banzembo 54

54
Nzembo 54
Nzambe akangoli ngai
1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
3Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo,
longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
4Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
yoka maloba ya monoko na ngai.
5Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ;
mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai,
batalelaka Nzambe te.
6Tala, Nzambe azali lisungi na ngai,
Nkolo azali eyekamelo na ngai.
7Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe !
Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
8Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu,
nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe,
pamba te ozali malamu.
9Okangoli ngai na pasi nyonso ;
mpe miso na ngai etali
lokola molongi ya banguna na ngai.

Currently Selected:

Banzembo 54: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in