Banzembo 3
3
Nzembo 3
Yawe Abikisaka
1Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
2Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni !
Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !
3Ebele bazali koloba na tina na ngai :
« Nzambe akobikisa ye te ! »
4Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai,
Yo nde omatisaka lokumu na ngai.
5Nabelelaka Yawe,
mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.
6Nalalaka mpe nazwaka pongi ;
nalamukaka lisusu,
pamba te Yawe azali makasi na ngai.
7Nakobanga te atako ebele ya bankoto
bazingeli ngai na bangambo nyonso.
8Yawe, telema !
Nzambe na ngai, kangola ngai !
Beta banguna na ngai nyonso bambata,
buka bato mabe minu.
9Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe.
Tika ete lipamboli na Yo ewumela
kati na bato na Yo.
Currently Selected:
Banzembo 3: MNB
Highlight
Share
Copy
Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.