YouVersion Logo
Search Icon

Naumi 1

1
Kanda mpe bolamu ya Yawe
1Lisakoli na tina na engumba Ninive.
Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.
2Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa,
oyo azongisaka mabe na mabe.
Yawe azongisaka mabe na mabe
mpe atombokaka makasi.
Yawe azongisaka mabe na mabe
epai ya banguna na Ye,
akangelaka bayini na Ye kanda makasi.
3Yawe asilikaka noki te,
mpe nguya na Ye ezali monene.
Yawe atikaka te moto oyo asali mabe
lokola nde asali na ye mabe te,
kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe.
Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki#1.3 Ekumbaki ezali mopepe ya makasi oyo ekumbaka biloko nyonso tango elekaka.,
kati na mopepe makasi.
4Agangelaka ebale monene
mpe akawusaka yango,
akawusaka bibale nyonso.
Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli
esili nyonso kokawuka,
mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
5Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye,
mpe bangomba mikuse epanzanaka.
Mabele, mokili mpe bavandi na yango
balengaka liboso na Ye.
6Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ?
Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ?
Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto,
bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
7Yawe azali malamu,
azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi
mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
8Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela
mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.
9Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ?
Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ;
pasi ekoya lisusu te.
10Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube,
lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ;
bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.
11Ezali kati na yo Ninive nde moto
oyo azali na mabongisi mabe
mpo na kotelemela Yawe
mpe azali na batoli ya mabe abimi.
12Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi,
bakosila kokufa mpe kolimwa.
Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo,
nakosala yango lisusu te.
13Nakobuka ekangiseli na bango,
oyo ezali na kingo na yo
mpe nakolongola yo na minyololo. »
14Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo :
« Okotikala kozwa lisusu bakitani te
oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi.
Nakolongola kati na tempelo na yo
banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso
oyo basala na bibende balekisa na moto.
Nazali kobongisela yo kunda,
pamba te ozali na yo pamba. »

Currently Selected:

Naumi 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy