YouVersion Logo
Search Icon

Yona 4

4
Yona atombokeli Yawe
1Yona asepelaki na yango ata moke te, asilikaki makasi. 2Asambelaki Yawe :
— Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye
nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ?
Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi
mpo na koluka kokima,
pamba te nayebaki malamu ete ozali
Nzambe ya ngolu mpe ya mawa,
osilikaka noki te mpe otonda na bolingo,
obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.
3Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ;
pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai,
kasi nazala na bomoi te !
4Kasi Yawe azongiselaki ye :
— Boni, okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika ?
5Yona abimaki na libanda ya engumba mpe akendeki kovanda na este na yango. Kuna, amitongelaki ndako moko ya matiti mpe avandaki na se ya pio na yango mpo na kozela makambo oyo ekokweyela engumba Ninive. 6Yawe Nzambe abimisaki nzete moko mpe akolisaki yango mpo na kopesa pio na moto ya Yona mpe kokitisa ye motema. Nzete yango esepelisaki Yona makasi. 7Kasi na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Nzambe abimisaki mwa nyama moko oyo eliaka banzete ; bongo eliaki nzete yango, mpe nzete yango ekawukaki. 8Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki :
— Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !
9Nzambe alobaki na Yona :
— Okanisi ete ozali kosala malamu ndenge ozali kosilika mpo na nzete oyo ?
Yona azongisaki :
— Ezali se bongo. Nazali kosala malamu ndenge nazali kosilika kino kosenga kufa na ngai.
10Yawe alobaki :
— Oyoki pasi na motema mpo na nzete oyo omoneli ata pasi te mpe okolisi te, oyo ekoli kaka na butu moko mpe ekawuki na butu oyo elandi ! Oyokeli yango mpe mawa ! 11Bongo ndenge nini Ngai nayoka motema pasi te mpo na Ninive, engumba monene, oyo ezali na bato koleka nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi te kokesenisa makambo mabe mpe makambo malamu, mpe ezali na ebele ya bibwele ?

Currently Selected:

Yona 4: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy