YouVersion Logo
Search Icon

Yoane 4

4
Yesu asololi na mwasi ya engumba Samari
1Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane. 2(Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.) 3Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile. 4Lokola asengelaki kolekela na Samari, 5akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi. 6Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.
7Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye :
— Pesa Ngai mayi mpo ete namela.
8(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia).
9Kasi mwasi yango alobaki :
— Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.—
10Yesu azongiselaki ye :
— Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
11Mwasi alobaki na Yesu :
— Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ? 12Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ?
13Yesu azongiselaki ye :
— Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ; 14kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
15Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi.
16Yesu alobaki na ye :
— Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa.
17Mwasi azongisaki :
— Nazali na mobali te.
Yesu alobaki na ye :
— Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te, 18pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo.
19Mwasi yango alobaki na Yesu :
— Nkolo, namoni ete ozali mosakoli. 20Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi.
21Yesu azongiselaki ye :
— Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi. 22Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda. 23Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. 24Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.
25Mwasi alobaki na Yesu :
— Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
26Yesu alobaki na ye :
— Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.
27Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? »
28Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato :
29— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
30Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu.
31Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu :
— Rabi, lia.
32Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
33Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango :
— Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
34Yesu alobaki na bango :
— Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai. 35Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka. 36Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale. 37Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. » 38Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu.
39Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. » 40Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale. 41Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba. 42Bongo balobaki na mwasi wana :
— Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Yesu abikisi mwana ya kalaka
(Mat 8.5-13; Lk 7.1-10)
43Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile. 44Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye. 45Tango akomaki na Galile, bato ya Galile bayambaki Ye, pamba te bango mpe bakendeki na Yelusalemi, na tango ya feti, mpe bamonaki makambo nyonso oyo asalaki kuna.
46Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela. 47Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
48Yesu alobaki na ye :
— Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?
49Mokonzi wana ya basoda alobaki :
— Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
50Yesu alobaki na ye :
— Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi.
Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
51Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye :
— Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
52Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki.
Bazongisaki :
— Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
53Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
54Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.

Currently Selected:

Yoane 4: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy