YouVersion Logo
Search Icon

Yoane 15

15
Yesu, nzete ya solo ya vino
1 Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga. 2Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka. 3Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino. 4Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
5 Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te. 6Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika. 7Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango. 8Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.
9 Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino ; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai. 10Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
11 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka. 12Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino. 13Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami. 14Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
15 Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai. 16Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
17 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino.
Mokili eyini bayekoli ya Yesu
18 Solo, mokili ezali koyina bino ; kasi boyeba ete eyinaki Ngai liboso na bino. 19Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.
20 Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino. 21Bakosala bino makambo wana nyonso likolo na Ngai, pamba te bayebi te Ye oyo atindaki Ngai. 22Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu ; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango. 23Pamba te moto oyo ayini Ngai ayini mpe Tata na Ngai. 24Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai. 25Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama : « Bayinaki Ngai kaka pamba. »
26 Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ; 27bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.

Currently Selected:

Yoane 15: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy