YouVersion Logo
Search Icon

Ezayi 12

12
Nzembo mpo na kokumisa Yawe
1Na mokolo wana, okoloba :
« Oh Yawe, nazali kosanzola Yo,
pamba te ata osilikelaki ngai,
kanda na Yo elongwaki likolo na ngai
mpe obondisaki ngai !
2Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ;
nakotia elikya na ngai epai na Ye
mpe nakobanga lisusu te.
Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;
azali lobiko na ngai. »
3Yango wana, botoka mayi na esengo
na etima ya lobiko.
4Na mokolo wana bokoloba :
« Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye,
bosakola misala na Ye kati na bikolo
mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.
5Boyemba loyembo mpo na Yawe,
pamba te asali makambo ya kokamwa.
Tika ete mokili mobimba eyeba yango !
6Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo,
pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »

Currently Selected:

Ezayi 12: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in