YouVersion Logo
Search Icon

Oze 14

14
Kobongola motema ememaka lipamboli
1Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu
mpo na mabe na bango,
pamba te batombokeli Nzambe na bango.
Bato bakokufa na mopanga ;
bakonyata-nyata babebe na bango,
bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
2Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo,
pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.
3Bobongisa maloba na bino
mpe bozonga epai na Yawe ;
boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso,
yamba biso na mawa na Yo
mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso,
na esika ya bangombe.
4Asiri akokoka kobikisa biso te ;
tokomata na mpunda ya bitumba te
mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso :
‹ Bozali banzambe na biso, ›
pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »
5Nakobikisa bango na mabe na bango
mpe nakolinga bango na motema moko,
pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.
6Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ;
akobimisa fololo lokola lisi,
akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.
7Bitape na ye ekokende mosika,
akozala na lokumu lokola nzete ya olive,
mpe malasi na ye ekozala lokola
malasi ya nzete ya sedele ya Libani.
8Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye,
bakokola malamu lokola ble,
bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.
9Efrayimi akoloba :
« Banzambe ya bikeko ezali lisusu
na tina nini epai na Ngai ? »
Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye.
Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu,
Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.
10Nani azali na bwanya
mpo na kososola makambo oyo ?
Nani azali na mayele mingi
mpo na koyeba yango ?
Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima :
bato ya sembo bakolanda yango,
kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.

Currently Selected:

Oze 14: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy