YouVersion Logo
Search Icon

Ba-Ebre 2

2
Kozwa na motuya lobiko kowuta na Mwana
1Yango wana, tosengeli kozwa lisusu na motuya makasi mateya oyo toyokaki mpo ete tobunga te. 2Pamba te soki sango oyo epesamaki, na tango ya kala, na nzela ya ba-anjelu, ezalaki na motuya makasi na ndenge ete bato oyo batiolaki yango mpe batosaki yango te bazwaki etumbu oyo ekokaki mpo na bango, 3ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango. 4Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.
Nyonso ezali na se ya Bokonzi ya Mwana
5Nzambe atiaki te mokili oyo ezali koya, mokili oyo tozali kolobela, na se ya bokonzi ya ba-anjelu. 6Nzokande, ezali na moko oyo atatolaki boye kati na Makomi :
« Moto azali nini mpo ete okanisa ye ?
Mwana na moto azali nani mpo ete obatela ye ?
7Okitisaki ye na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke,
kasi olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu,
8mpe otiaki biloko nyonso
na se ya matambe na ye. »
Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye. 9Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.
Mwana na Nzambe azali ndeko ya bato nyonso
10Emonanaki malamu ete, mpo na komema bana ebele na nkembo, Nzambe oyo akela biloko nyonso mpe azali Nkolo na yango akomisa ya kokoka na nzela ya pasi, mokonzi oyo asengelaki komema bango na lobiko. 11Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye, 12tango alobaki :
« Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na Ngai,
nakokumisa Yo na banzembo kati na mayangani. »
13Yesu alobaki lisusu :
« Nakotia elikya na Ngai kati na Ye ; »
Mpe lisusu :
« Ngai oyo, Ngai elongo na bana oyo Nzambe apesa Ngai. »
14Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa, 15mpe akangola bato nyonso oyo, bomoi na bango mobimba, bakomaki bawumbu likolo na kobanga kufa.
16Pamba te ezali penza ya solo ete Yesu ayaki te mpo na kosunga ba-anjelu, kasi mpo na kosunga nde bakitani ya Abrayami. 17Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato. 18Pamba te, lokola Ye moko amonaki pasi tango amekamaki, akoki mpe kosunga bato oyo bazali komekama.

Currently Selected:

Ba-Ebre 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy