YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 2

2
1Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango.
2Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala. 3Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala.
Lisolo ya Edeni
Adamu mpe Eva
4Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki.
Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo, 5ata nzete moko te ya elanga ezalaki, mpe ata molona moko te ya elanga etikalaki kobimisa moto, pamba te Yawe Nzambe anokisaki nanu mvula te na mokili, mpe moto azalaki te mpo na kolona yango na mabele. 6Kasi mayi ezalaki kobima wuta na se mpe ezalaki kopanzana na etando nyonso ya mokili.
7Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi. 8Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango. 9Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe.
10Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei. 11Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. 12Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango. 13Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. 14Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »
15Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango. 16Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, 17kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. »
18Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
19Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango. 20Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye. 21Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. 22Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
23Boye, mobali alobaki :
« Tala na mbala oyo,
oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,
mosuni ya mosuni na ngai.
Bakobenga ye mwasi,
pamba te awuti na mobali. »
24Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.
25Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.

Currently Selected:

Ebandeli 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy