YouVersion Logo
Search Icon

Esidrasi 10

10
Isalaele ayamboli masumu
1Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi. 2Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele ! 3Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso ! Tika ete esalema kolanda Mobeko ! 4Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo ! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala ! »
5Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi. 6Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te ; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
7Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi. 8Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu. 9Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi. 10Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango :
— Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo. 11Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
12Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi :
— Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi ! 13Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula ; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo. 14Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.
15Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo. 16Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi. 17Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya.
Molongo ya bato oyo bamemaki ngambo
18Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya :
Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali :
Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia.
19Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango.
20Kati na bakitani ya Imeri :
Anani mpe Zebadia.
21Kati na bakitani ya Arimi :
Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi.
22Kati na bakitani ya Pashuri :
Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa.
23Kati na Balevi :
Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri.
24Kati na babeti mindule :
Eliashibi.
Kati na bakengeli bikuke :
Shalumi, Telemi mpe Uri.
25Kati na bato mosusu ya Isalaele :
kati na bakitani ya Pareoshi :
Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya.
26Kati na bakitani ya Elami :
Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli.
27Kati na bakitani ya Zatu :
Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza.
28Kati na bakitani ya Bebayi :
Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi.
29Kati na bakitani ya Bani :
Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti.
30Kati na bakitani ya Paati-Moabi :
Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase.
31Kati na bakitani ya Arimi :
Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni, 32Benjame, Maluki mpe Shemaria.
33Kati na bakitani ya Ashumi :
Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei.
34Kati na bakitani ya Bani :
Madayi, Amirami, Ueli, 35Benaya, Bedia, Keluwu, 36Vania, Meremoti, Eliashibi, 37Matania, Matinayi, Yasayi, 38Bani, Binuwi, Shimei, 39Shelemiya, Natan, Adaya, 40Makinadibayi, Shashayi, Sharayi, 41Azareyeli, Shelemiya, Shemaria, 42Shalumi, Amaria mpe Jozefi.
43Kati na bakitani ya Nebo :
Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya.
44Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.

Currently Selected:

Esidrasi 10: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy