YouVersion Logo
Search Icon

2 Masolo ya Kala 2

2
Mabongisi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe
1Salomo asangisaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko ya kotongela, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bato nkoto misato na nkama motoba mpo na kokengela bango.
2Salomo atindaki maloba oyo epai ya Irami, mokonzi ya Tiri :
— Sala na ngai ndenge osalaki mpo na Davidi, tata na ngai, tango otindelaki ye mabaya ya nzete ya sedele mpo na kotonga ndako na ye ya kovanda. 3Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele. 4Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso. 5Kasi nani akoki kotongela Ye Tempelo, pamba te Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Ye te ? Mpe ngai nde nani mpo ete natongela Ye Tempelo, soki kaka etumbelo te mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso na Ye ?
6Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki. 7Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo, 8bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko. 9Nakopesa na basali na yo, oyo bakokata banzete batone nkoto motoba ya ble, batone nkoto minei ya orje, balitele ya vino nkoto nkama libwa, balitele ya mafuta nkoto nkama libwa.
10Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda :
— Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango.
11Irami alobaki na ye lisusu :
— Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko. 12Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu. 13Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo.
14Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki. 15Biso, tokokata banzete nyonso ya Libani, oyo ozali na yango posa ; tokokangisa mpe tokotinda yango na nzela ya mayi ya ebale monene kino na Jafa. Wuta kuna, yo okokomisa yango na Yelusalemi.
16Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba. 17Aponaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bakengeli nkoto misato na nkama motoba mpo na kosalisa bato misala.

Currently Selected:

2 Masolo ya Kala 2: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy