YouVersion Logo
Search Icon

1 Samuele 31

31
Suka ya bomoi ya Saulo
(2Sa 1.4-12; 1Ma 10.1-12)
1Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa. 2Bato ya Filisitia balandaki Saulo elongo na bana na ye ya mibali, kasi babomaki bana na ye ya mibali : Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa. 3Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo. 4Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. »
Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango. 5Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo. 6Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana.
7Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
8Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa. 9Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango. 10Batiaki bibundeli ya Saulo kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko, Asitarite, mpe badiembikaki nzoto na ye na mir ya Beti-Sheani.
11Tango bavandi ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo, 12bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango. 13Bazwaki mikuwa na bango, bakundaki yango na Yabeshi, na se ya nzete ya tamarisi, mpe bakilaki bilei mikolo sambo.

Currently Selected:

1 Samuele 31: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy