YouVersion Logo
Search Icon

Bafilipi 2:3-8

Bafilipi 2:3-8 MNB

Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango. Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela, kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto ; amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.