Matayo 24:9-11
Matayo 24:9-11 MNB
Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai. Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango. Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.





