YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 1

1
Ebandeli ya mokili
1Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. 2Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
3Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! »
Mpe pole ezalaki.
4Nzambe amonaki ete pole ezali malamu, akabolaki pole na molili. 5Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.
6Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »
7Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo. 8Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
9Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! »
Yango esalemaki mpe bongo. 10Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu.
11Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! »
Yango esalemaki mpe bongo. 12Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu. 13Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato.
14Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu, 15mpe mpo na kongengisa mokili ! »
Yango esalemaki mpe bongo. 16Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto. 17Nzambe atiaki yango na etando ya likolo mpo ete engengisa mokili, 18engenga na moyi mpe na butu, mpe ekabola pole na molili. Nzambe amonaki ete ezali malamu. 19Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei.
20Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! »
21Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu. 22Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »
23Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.
24Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! »
Yango esalemaki mpe bongo. 25Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
26Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »
27Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,
akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;
akelaki bango mobali mpe mwasi.
28Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
29Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino. 30Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. »
Yango esalemaki mpe bongo.
31Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.

Currently Selected:

Ebandeli 1: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy