Misala ya Bantoma 8:29-31
Misala ya Bantoma 8:29-31 MNB
Molimo alobaki na Filipo : — Kende mpe pusana pene ya shar wana. Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye : — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ? Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.





