1
Masese 29:25
Mokanda na Bomoi
MNB
Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
Compare
Explore Masese 29:25
2
Masese 29:18
Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !
Explore Masese 29:18
3
Masese 29:11
Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
Explore Masese 29:11
4
Masese 29:15
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Explore Masese 29:15
5
Masese 29:17
Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
Explore Masese 29:17
6
Masese 29:23
Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
Explore Masese 29:23
7
Masese 29:22
Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
Explore Masese 29:22
8
Masese 29:20
Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
Explore Masese 29:20