Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo ; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba : ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya. Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›