1
Matayo 19:26
Mokanda na Bomoi
MNB
Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
Compare
Explore Matayo 19:26
2
Matayo 19:6
Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
Explore Matayo 19:6
3
Matayo 19:4-5
Yesu azongisaki : — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, » mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ?
Explore Matayo 19:4-5
4
Matayo 19:14
Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Explore Matayo 19:14
5
Matayo 19:30
Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Explore Matayo 19:30
6
Matayo 19:29
Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
Explore Matayo 19:29
7
Matayo 19:21
Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Explore Matayo 19:21
8
Matayo 19:17
Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
Explore Matayo 19:17
9
Matayo 19:24
Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
Explore Matayo 19:24
10
Matayo 19:9
Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
Explore Matayo 19:9
11
Matayo 19:23
Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo !
Explore Matayo 19:23
Home
Bible
Plans
Videos