1
Matayo 15:18-19
Mokanda na Bomoi
MNB
Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
Compare
Explore Matayo 15:18-19
2
Matayo 15:11
eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
Explore Matayo 15:11
3
Matayo 15:8-9
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ; basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
Explore Matayo 15:8-9
4
Matayo 15:28
Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Explore Matayo 15:28
5
Matayo 15:25-27
Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, sunga ngai ! Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa ! Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
Explore Matayo 15:25-27
Home
Bible
Plans
Videos