1
Ezayi 6:8
Mokanda na Bomoi
MNB
Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? Nazongisaki : — Ngai oyo, tinda ngai !
Compare
Explore Ezayi 6:8
2
Ezayi 6:3
Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »
Explore Ezayi 6:3
3
Ezayi 6:5
Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »
Explore Ezayi 6:5
4
Ezayi 6:1
Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
Explore Ezayi 6:1
5
Ezayi 6:7
atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
Explore Ezayi 6:7
6
Ezayi 6:2
Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.
Explore Ezayi 6:2
7
Ezayi 6:6
Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai
Explore Ezayi 6:6
8
Ezayi 6:9
Yawe alobaki na ngai : — Kende koloba na bato oyo : « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; botala na bino, kasi bokomona te !
Explore Ezayi 6:9
9
Ezayi 6:10
Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »
Explore Ezayi 6:10
Home
Bible
Plans
Videos