1
Ezayi 19:25
Mokanda na Bomoi
MNB
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! »
Compare
Explore Ezayi 19:25
2
Ezayi 19:20
Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango.
Explore Ezayi 19:20
3
Ezayi 19:1
Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
Explore Ezayi 19:1
4
Ezayi 19:19
Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili.
Explore Ezayi 19:19
Home
Bible
Plans
Videos