Nzambe alobaki na Salomo :
— Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo ; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te ; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango, bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa.