Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yobo 27

27
1Yobo akobaki koloba :
2« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai,
na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
oyo atungisi motema na ngai,
3wana ngai nazali nanu na bomoi,
mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,
4bibebu na ngai ekoloba mabe te,
mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.
5Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino !
Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola
boyengebene na ngai,
6nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ;
motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.
7Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe,
mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo !
8Elikya nini moto mabe azali na yango
tango Nzambe azwi bomoi na ye ?
9Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye
tango pasi ekomelaki ye ?
10Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso
to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ?
11Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe,
nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
12Bino nyonso, boyebi yango malamu !
Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?
13Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe,
libula oyo moto ya mobulu azwaka
epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso :
14Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele,
mopanga ezali lifuti na bango,
bakitani na ye bakokufa na nzala,
15bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye,
oyo bakotikala na bomoi,
mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te.
16Ata soki asangisi palata lokola putulu
mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,
17nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango,
mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.
18Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu,
lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.
19Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ;
tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.
20Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ;
na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.
21Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye,
mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.
22Bakobwakela ye makonga na mawa te,
ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto
oyo azali kobwakela ye yango.
23Bakobetela libebi na ye maboko,
mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »

Currently Selected:

Yobo 27: MNB

Tya elembo

Copy

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo