Yobo 26
26
Eyano na Yobo epai ya Bilidadi
1Yobo azongisaki :
2« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi,
ndenge osungi loboko oyo elembi !
3Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya,
mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !
4Ozwi maloba oyo wapi ?
Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?
5Bakufi balengaka na se ya mayi
mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.
6Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu,
mpe libulu ya molili ezali polele.
7Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te,
atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,
8akangaka mayi kati na mapata,
kasi mapata epasukaka te ;
9azipaka kiti ya bokonzi na Ye,
atandaka mapata na likolo na yango ;
10akataka mondelo na likolo ya mayi,
na suka ya pole mpe na molili.
11Makonzi ya Lola ezali kolenga
mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.
12Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ;
mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.
13Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko,
loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.
14Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke
ya misala na Ye
mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka,
nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »
Currently Selected:
Yobo 26: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.