Yobo 28
28
Mabombami ya Bwanya
1Ezali na esika oyo batimolaka palata,
mpe na esika oyo bapetolaka wolo.
2Ebende ewutaka na mabele,
mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
3Moto asilisaka molili,
alukaka kino na se, na bisika ya se penza,
libanga kati na molili oyo eleki makasi,
4atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka,
na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato,
adiembelaka mosika ya bato nyonso.
5Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango
lokola nde moto ezikisi yango.
6Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele,
mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.
7Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango,
miso ya mpongo moko te emoni yango,
8nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te,
mpe nkosi etambola nanu kuna te.
9Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi
mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,
10atimolaka nzela kati na mabanga,
mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,
11akawusaka mayi ya bibale
mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.
12Kasi bakoki komona bwanya wapi ?
Mayele evandaka wapi ?
13Moto ayebaka motuya na yango te,
pamba te bakoki komona yango te
kati na mokili ya bato ya bomoi.
14Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; »
mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te. »
15Bakoki kosomba yango te
na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ;
16bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri
to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;
17wolo to diama ekoki te kokokana na yango,
bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.
18Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te
liboso na yango.
Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.
19Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te,
mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.
20Boye, bwanya ewutaka wapi ?
Mayele evandaka wapi ?
21Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi,
ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.
22Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango
nde ekomaki na matoyi na biso. »
23Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango,
Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.
24Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili,
mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.
25Tango apesaki makasi na mopepe
mpe atiaki mondelo na mayi,
26tango atiaki mobeko mpo na mvula
mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
27amonaki bwanya mpe akumisaki yango,
andimaki yango mpe amekaki yango.
28Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya !
Koboya mabe, yango nde mayele ! »
Currently Selected:
Yobo 28: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.