Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yobo 25

25
Maloba ya misato ya Bilidadi
1Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :
2« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;
atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.
3Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ?
Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?
4Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ?
Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?
5Soki kutu sanza ezali kongenga te,
mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,
6toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi,
mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »

Currently Selected:

Yobo 25: MNB

Tya elembo

Copy

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo