Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yobo 24

24
1Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te
mpo na esambiselo ?
Mpo na nini bato oyo bayebi Ye
basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ?
2Bato bapusaka bandelo,
bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki,
3babotolaka ane ya mwana etike
mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali
ya mwasi oyo akufisi mobali ;
4balongolaka babola na nzela,
mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.
5Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo
na mosala mpo na koluka biloko ya kolia,
kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei ;
6bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele
mpe balokotaka bambuma
oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe.
7Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba,
bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili ;
8bapoli na mvula ya ngomba,
bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama.
9Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye,
bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.
10Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ;
bamemaka maboke ya nzete ya ble,
kasi bazongaka kaka na nzala.
11Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu,
bakamolaka bambuma ya vino,
kasi bazongaka kaka na posa ya komela.
12Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka,
mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga
mpo na koluka lisungi,
kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.
13Bato oyo bazali kosala bongo,
bazali kotombokela pole,
bayebi nzela na Ye te
mpe batambolaka ata kati na yango te.
14Mobomi azali kotelema na moyi
mpe koboma mobola elongo na moto akelela ;
na butu, azali lokola moyibi.
15Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota ;
amilobelaka : ‹ Moto moko te akomona ngai, ›
mpe abombaka elongi na ye.
16Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ;
kasi na moyi, bamikangelaka na ndako,
bazali koboya pole.
17Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo,
somo ya molili ekomaka moninga na bango.
18Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi,
eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka,
yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.
19Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe,
ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka
bato oyo basalaka masumu.
20Libumu ya mama ebosanaka bango
mpe bankusu esepelaka kolia bango.
Bakanisaka bango lisusu te,
pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.
21Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana
mpe bato oyo babotaka te,
kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali.
22Kasi Nzambe, na nguya na Ye,
abakisaka mikolo ya banyokoli na bango ;
ata batombolami, bazalaka na elikya te
mpo na bomoi na bango.
23Nzambe apesaka bango kimia,
kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.
24Mpe atako sik’oyo bazali bato minene,
na tango moke bakozala lisusu te,
bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso,
bakokatama lokola mito ya ble.
25Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai
ete nazali koloba lokuta ?
Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »

Currently Selected:

Yobo 24: MNB

Tya elembo

Copy

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo