Logo YouVersion
Îcone de recherche

2 Bakolinto 6

6
1Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ; 2pamba te Nzambe alobi :
« Na tango ya malamu, nayanolaki yo ;
mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. »
Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
3Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso. 4Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi
kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;
5kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;
kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;
6kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;
kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;
7kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ;
kati na bibundeli ya bosembo
mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;
8kati na lokumu mpe soni,
kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe.
Mpe lisusu,
kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta,
nzokande tolobaka solo ;
9koyebana lokola bato oyo bayebani te,
nzokande toyebani makasi ;
koyebana lokola bakufi,
nzokande tozali bato ya bomoi ;
koyebana lokola bato bakweyisama,
nzokande baboma biso te ;
10koyebana lokola bato na mawa,
nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ;
koyebana lokola babola,
nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ;
koyebana lokola bato bakelela,
nzokande tozali na nyonso.
11Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama. 12Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino. 13Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !
Kokabwana na mabe
14Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ? 15Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ? 16Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko :
« Nakovanda kati na bango
mpe nakotambola elongo na bango.
Nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na ngai. »
17Yango wana,
« Bobima kati na bango
mpe bokabwana na bango,
elobi Nkolo ;
bosimba eloko moko te ya mbindo,
mpe ngai nakoyamba bino. »
18Mpe,
« Nakozala Tata mpo na bino,
mpe bino bokozala bana mibali
mpe bana basi mpo na ngai,
elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »

Sélection en cours:

2 Bakolinto 6: MNB

Surbrillance

Partager

Copier

None

Tu souhaites voir tes moments forts enregistrés sur tous tes appareils? Inscris-toi ou connecte-toi

YouVersion utilise des cookies pour personnaliser votre expérience. En utilisant notre site Web, vous acceptez l'utilisation des cookies comme décrit dans notre Politique de confidentialité