Lukasi 11

11
Lolenge la bobondedzi
(Mt. 6:9-13)
1Mokolo moko Yesu akasambela o ntei yoko bo. Ntango eyailidza yo bobondedzi, moko wa bayekoli bande amotuni 'te: nkolo, ototeidza ndenge ya bosambedzi ndenge eyateidzaka Yoane mobatisi bayekoli bande. 2Nampino Yesu abalobedzi 'te: "Wèeniki 'te bokosambela, bolobaka 'te: tata wa biyo, nkombo yao ekumisama. Bokondzi bwao boya. 3Otoinyaka toma mpo ya biyo mokolo na mokolo tolo na biyo na bosenga mpe na mposa. 4Otolimbisa ntango' ekaala biyo misala mibe, mpo biyo koto tolimbisa mpendza banguna babèebe bakatoala bobe. Otobatela mpo biyo na komekama o masumu te.
5Yesu alobaka liyu na bayekoli bande 'te: kanisa 'te o ntei ya bino moko alo na ona wande, alandi o yo na butu mpe alobi nande 'te: "wai wanga, o koki bombekidza mapa maato," 6Mpamba te, ona wanga moko awii o mobembo mpe ankomedzi o ndako, kasi nako naiyoma iyoko ya bodzei te 'te namoinya. 7Kasi ona olo'ontei ya ndako amoebisi 'te, na kontungisa te 'te nateleme. Nasi nakangiki monoko mwa ndako yanga mpo ekomi butu, mpe nga na bana banga tosi totuki. Yango'enena, nakokiko botelemi 'te naeinya iyoma na butu dzabo te. 8Yesu alobi nande 'te; ata atelemiko 'te omoinya mapa mpo elo ona wande te, kasi atelème 'te amoinya mpo ya matungisi ma ona wande mpe amoinya toma tu tèete totaba nande na bosenga. 9Nde nga, nalobi na bino 'te: boongaka mpe Nyaamolo aeinya; nde moto owa waa mpe adziya, bobèteke mpe aedzibolela. 10Mpamba te, moto momwèemwe owaonga Nyaamolo adziya. Moto owakawa toma o Nyaamolo aamoinya. Mpe Nyaamolo aadzibola monoko mwa ndako mpo yande. 11Kanisa 'te moko wa bino aongi tata wande nsuu ya bodzei. O ntei ya baongo ba bino, okoinya mwana wande kôko ya ngenge o elele ya nsuu endzaa? Moto moko akomoi te. 12Ndzaa o ntei ya bino o koki boinyi mwana wande nkoto ontei eongi mwana monkei? Moto moko te. 13Ata bino bato babe boebi boinyi banaba bino makabo ma malamu, nampino tata wa bino olo o likolo, alo molamu mpe alo upe ainya Elimo santu o bato babèebe bakamotuna.
Yezu mpe satana
(Mt. 12:22-30; Mk. 3:20-27)
14Yesu apandzaka molimo mu mwaba emimi o ndzoto ya moto. Ntango ya tokoo molimo mo mobe, o'ona moto owabaka emimi, abandi bolobi, nde boike bwa bato bakamoi. 15Kasi bato baboko bababa o maana balobi na Yesu 'te:" akapandza milimo mibe na ngwiya ya belezebule#11:15 Belezebule Satana." 16Bato baboko ba momekaka 'te abateidza makamwisi mpo baeba 'te ngwiya yande iwii o likolo o Nyaamolo. 17Kasi Yesu aebaka mamanyo maba, yango enena alobaka naba 'te Wèeniki bato ba mboka bakabuna banaba elo 'te baakabwana. Elo ndenge yawi na libota libeiki na bitumba dzakabwana mpe bakabola libota dzaba. 18Elo ndenge yawi Wèeniki satana na milimo mande mibe bawelani o bokondzi mpe bakabwani, bokondzi bwa satana bwa beba. Nalobi dzabona mpo olobiki nanga 'te ngwiya ibo ya mpinya belezebule 'te na tokoloko milimo mibe o bato. 19Ebeiki 'te makambo malobi we malo masolo, nampino yaba éndenge baa? Mpo ya batike ba o mpendzaa? Bakopandza milimo mibe na ngwiya ya belezebule te? Yango'enena bamenyi, ba mosambisi 'te olo na libunga mpo yanga. 20Kasi dza okompandza nga milimo mibe na ngwiya ya Nyaamolo, boeba 'te bokondzi bwa Nyaamolo bokomi o ntei ya bino. 21Wèeniki elombe alo upe na bibuneli bande, mpe akakèngele ndako yande walamu, toma tande tu tèete taba nyee." 22Kasi moto omotubi na ngwiya aya liya mobunya mpe amolonga mpe amobotolo bibuneli bibèebe bibaba nande akatiela motema. Nsima, akabolela banà bande toma totèete tomobotodzi yo. 23Moto abeiko nanga eika yawi te, akonkala te. Mpe moto abeiko akasala nanga mosala eika yawi te ako moto wanga te.
(Mt. 12:43-45)
24Ntango eketokoo molimo mobe o nzoto ya moto, mwakoma mokayengayenga o bisobe mpo 'te modziya eika ya boemi. Kasi modziiko ntei te, molimo mwaloba 'te: naolodza o eika eyaba nga nadzadzi. 25Ntango'eyakoma milimo o ndzoto ya moto'onona, mitaniki 'te moto akomi molamu mpe peto, milimo myakoingela te, myaikala ntaka mikikeba na moto. 26Mwakè mpe mwakakowa milimo mimoko nsambo bamotubi na ngwiya, mpe baya liya dzala o moto'onona. Mpe lolenge la moto'onona la koma lobe botubi ndenge'eyaba nande yambo. 27Waba Yesu akaloba makambo mabo, mwalimoto moko atokoi o ntei ya bato baike mpe abeki na mongongo o likolo 'te: Nyaamolo apambola mama'owaebotaka mpe owaemwangidzaka mamwange mande o mwana obo! Lokumu loba na mama owabota mpe owabôkôlô mwana obo! 28Kasi Yesu amololedza 'te: esengo elo o bato bakaoka liloba dza nyaamolo mpe bakalitosa boleki!
Yezu apamedzi bato ba ntango ebo
(Mt. 12:38-42)
29Dza waba bato bakatonda bè botondi upe na Yesu; Yesu alobi naba 'te: bino bato ba ntango ebo bolo bato babe! Mpo bokontuna 'te naeyalela makamwisi mpo eba elembo 'te: Nyaamolo antomi, kasi likamwisi dzawi lilaène bino dzakokana nadza mosakoli Yona kala. 30Mpamba te, dza waba Yona elembo mpo ya bato ba Niniwe, elo ndenge yawi mpo ya mwana wa moto alo koto elembo mpo ya bato ba ntango'ebo. 31O mokolo mwa bosambi mokondzi wa mwalimoto moko wa engumba ya ngele ya Isalaele elongo na bato ba ntango ebo, abainya etumbu mpo autaka iluka mpo 'te ayaoka maloba ma bwanya ma mokondzi Salomon ma malobaka yo. Mpe nakaloba na bino solo 'te: moto o tubi Salomon alowa mpe botèi bomooki. 32O mokolo mwa bosambi, bato ba Niniwe bateleme eika yawi na bato ba ntango ebo babakatela etumbu. Pamba te mpo babongolaka mitema ntango eyaba Yona akabateidza, kasi elo na moto moko o tubi Yona.
(Mt. 5:15; Mk. 4:21)
33O nsima Yesu alobi naba 'te: moto akoba akatumba mwinda te 'te amobomba onsina ya bolange to mpe amodziba na saani.Kasi akamotele o likolo mpo mongenge o bilele bibèebe. Mpo 'te waingela bato o ndako, baène walamu. 34Liyo dza moto lilo dzaokoba mwinda o ndzoto yande, Wèeniki 'te miyo ma moto malo walamu, ndzoto yande mobimba yaba koto walamu. Kasi miyo ma moto ma beiko makaène walamu te, ndzoto yande mobimba yakoba koto walamu te. 35Ntina enena okeba 'te moi moolo nao mu nakokoma dzombi te. 36Kasi Wèeniki ndzoto yao mobimba ilo ontei ya moi mpe dzombi libeiko o ndzoto yao te, ndzoto yao mobimba yaba polele dzaokoba mwinda mokongengele bato o ndako.
Yezu alobedzi bafarizeo
(Mt. 23:4-36)
37Wailidzaka Yesu bolobi: moko wa bafalizeyo abelengi Yesu 'te akadza o ndako yande, nsima Yesu akaingelaka o ndako ya mofalizeo adzadzi mpo 'te badza. 38Kasi moto moko wa bafalizeyo akamwaka waike mpo Yesu akowolaka maboko yambo ya bodzei te bokokani na bonkoko bwaba. 39Nampino nkolo Yesu alobi nande 'te: Bino bafalizeyo bolo dzaokoba bato bakaoko mai bè o ndzei mpe bakawola kopo na saani bè o ndzei kasi o kati ya bino botondi na moibi mpe makambo mabe. 40Bino bolo badzoba! Bokoeba te 'te Nyaamolo owaalaka dzoto ya bino alaka koto molimo? Elo na ntina 'te molimo mwao moba mpeto kasi ye nakoba bè maboko te. 41Kasi bino nakoba na lokoso mpe na makambo mabe te, kasi bokabela babola toma ta bino na motema mobimba nampino bwa koma bato balamu o miyo ma Nyaamolo. 42Kasi mawa ma bino Bafalizeyo! Mpamba te, bokofuta ndambo ya dzomi ata ya toma ta bino to tokèke tokoona bino o nganda ya bino, Kasi bokotèe bosembo mpe bolingo bwa Nyaamolo. Eengedzi 'te bokokisaka makambo mabo mpe nakobosana koto te makaala bino. 43Mawa ma bino Bafalizeyo, mpo bokoba na mposa ya bodzadzi bè o bilele bya lokumu, o bandako ya losambo mpe okokala koto bato baeinya mbote na lokumu eika elo bato baike. 44Mawa ma bino! Mpamba te, bolodza mombo makoènene te, mpe bato bakalanda o likolo dzama mpo bakoeba 'te elo mombo te. 45Nampino moko wa batei ba mibeko mya Moize alobi na Yesu: molakisi makambo makaloba we mpo ya bafalizeyo ekeenidza 'te okototala. 46Yesu alobi naba 'te, yaba nsomo mpo ya bino batei ba mibeko mya Moize mpo bokoinya mikumba mpe mibeko o bato, kasi bino bokomisalela te. 47Mawa ma bino mpo bokotonga mombo ma basakoli kasi ya babomaka bè bankoko ba bino. 48Okoala bino dzabona, bokokimidza makambo mamaalaka bankoko ba bino mpo ya basakoli; babomi basakoli mpe batongi mombo malamu mpo yaba. 49Yango enena, Nyaamolo na bwanya bwande, alobaka 'te: naatoma basakoli mpe bantoma o bato ba Isalaele mpe bato ba banyokolo mpe baboma baboko. 50Yango enena, bato balo lelo baadziya etumbu mpe basamba mpo ya makila ma basakoli ba Nyaamolo ba babomaka bankoko ba bino banda oebandeli ya mokili. 51Liwa dza basakoli, likibanda o Abel kino nganga Zakaliya, bamobomaka ntango eyaba yo, o etumbelo o kati ya tempelo. Bato ba eleko ya lelo badziya etumbu mpo ya makila ma basakoli. 52Mawa ma bino batei ba mibeko, mpamba te, bokangi ndzela ya bato 'te baeba Nyaamolo mpe bino mpendza boebiko Nyaamolo te, mpe bokopekisa bato bakawa 'te baeba Nyaamolo. 53Ntango eya tokooko Yesu o ntei ya ndako, bafalizeyo mpe balakisi ba mibeko, baba bakamotungisa na mituna mpo ya makambo ndenge na ndenge. 54Baba bakamoongolo na mituna 'te, aloba likambo dzoko lilibe mpo bamofunda.

S'ha seleccionat:

Lukasi 11: LIZ

Subratllat

Comparteix

Compara

Copia

None

Vols que els teus subratllats es desin a tots els teus dispositius? Registra't o inicia sessió