LUKA 5

5
BAYEKOLI BA BOO
(Mt. 4:18-22; Mk. 1:16-20)
1Moko mokolo, Yezu abaka onsele oetima ya Genesaret mpe bato babaike bayei baka mozinga, mpo baoka mateya ma Libanza. 2Yezu aeniki mato mabale ma mpamba ma loboma nsu madjali opio ya nsele ya laki, kasi babomi bansu bama tikiki omoi mpe babeki baka sosi madjanga mabango ma loboma nsu. 3Bwato bwawi bubeki bwa simoni Yezu akpeli obwato buna, aongiki Simoni akende mwa boti onsele. Mokia Yezu adjali obwato mpe amasi loteya bato. 4Esizeyo lokolo, Akoli na Simoni: Tomba bwato oeyoma ya bodjindo mpe mokia bwaka bodjanga oeyoma ya bodjindo mpoya loboma nsu. 5Simoni amoongezeli: Moteyi, tokeli mosala butu mobimba toizwa ekei bito kasi mpoya maloba mau tokabwaka bozanga. 6Simoni nabebi bande bakeliki boekoliki Yezu nabango, ba bwaki mpe bazwiki nsu ya djike mazanga mamasi na lokazwa. 7Babeki bebi nabango obwato bosu baya bakabasunga baye batonzei mato mabale meke. Madjingi lozinda. 8Eeni Simoni Petelo bona angumbameli Yezu akoli: Mokonzi umwana pene-pene nanga mpo nabei mosumuki. 9Petelo akoliki bona mpo Petelo nabebi bande bamosala ba babeki elongo nande obwato bakamoiki mpenza mpo bazwiki nsu ya djike. 10Yakobo na Yowane bana ba Zebedeo, bebi ba Simoni Yezu akoleli Simoni: Lobanga bito banda lelu oka benda bato omotema mwanga. 11Tango ebendiki baoli bansu bwato bwa bango onsele, batiki binso mpe mokia batiki misala mia bango mia loboma nsu mpe bakeiki bango na Yezu mpoya loba bayekoli bande.
Yezu abikei bato ba bololi mpe alimbie masumu
(Mt. 8:1-14; Mk. 1:40-45)
12Omokia, moko mokolo Yezu abeki o engumba yoko ya etuka ena, lele moko abeki nabololi bwa maba abeki wana. Ntango enikiyo Yezu, aumbi elongi onse mpoya loenisa limemia mpe abondeliki Yezu amosadja. Akoliki nkolo naebi 'te odjingaka losadja, olo namakoki ma lobikia. 13Yezu amotandeli loboko, amopeli akoli. Nadjingi okoma peto mpe na mbala yawi maba masili. 14Omokia Yezu amopaleli 'te atika nalokolela moto. Kasi kende kamilakinya na banganga Libanza bonza libanza bo yatoma Moze nayango nde elemi bolitatoli. 15Nabo emokoli Yezu 'te atika lokolele moto, nsango yande epalangani na bato banso. Nantina yango bato babaike bayei lokanga na mpoya loka mateya mande mpe lobikia balo na makono mabango. 16Kasi Yezu abeki akakei mbala na mbala obobe lokasambela Libanza.
Yezu abikei moto awa makolo
(Mt. 9:1-8; Mt. 2:1-12)
17Moko mokolo, Yezu abaka akateyi bafaliseo na bateyi ba mibeko banzali wana bantaka omboka inso ya Galileya, ya yudeya mpe ya Yelusaleme na nguya ya Libanza abikei bato ba makono. 18Mpe bayei na moto awa makolo atuki omondengwa baasi 'te ba moingiza ondako mpe lomobeya obo bwa Yezu mpo amobikia. 19Kasi baizwa nzela ya lomoyingiza bito. Mpoya nkaka ya bato, nabona babayi omotondo mwa ndako, bakeli lilu ba mokitizi na mondengwa mwande ontei ya bato, obo bwa Yezu. 20Ntago Yezu asosoliki 'te bamokeleliki motema mpo abikia lele yo olembi nzoto. Akoliki na moto mei nde masumu mau malimbisami. 21Bateyi ba mibeko na bafaliseo bamasi Lotuka Yezu: Yo nde nzai mpo akolo bobo? Nzai okoki nalolimbisa masumu bobele Libanza bito? 22Yezu ayebi mamanyi mabango; Akoli: Mpo yandei bokamanyi bo mitema? 23Ekei ndei eleki nalokolo na moto ebosono masumu mau malimbisami to na lomokolo teloa mpe djata? 24Nabona mpo 'te boyeba 'te, mwana wa moto alona likoki dja lolimbisa masumu wa onse, antewa akoli na moto awa makolo: Nakoli nau kitela obo mondengwa mpe djata ondako. 25Mbala yawi lele ona ateloi omiyo mabango banso aboi mondengwa mwande motukiyo mpe akeyi ondako lokolo bo: Nkembo na Libanza. 26Bato banso babeki wana bakamoi, mpe bamasiki lokolo nkembo na Libanza, mpe bakoli: Lelu toeni makambo malokamwa.
Bakeleli Yezu ntembe
(Mt. 9:9-13; Mt. 2:13-17)
27Mokia Yezu abimiki oeyoma ena mpe onzela aeni mofutisi mpako wawi odjaliki oeyoma yande ya mosala nkombo yande Lewi omoi Yezu amokekiki sembo mpe akoliki nande: yaka oba moyekoli wanga. 28Bona lewi ateloiki mpe, Atikiki mosala mwande mwa lofutisa mpako, mpe amasiki lobenga Yezu mpo akoma moyekoli wande. 29Omokia Lewi akeliki nteke enene ondako yande mpoya lokumisa Yezu. Bafutisi mpako babaike na bapaya babeki bakadjei elongo nabango. 30Ntango bafaliseo basu mpe bateyi ba mibeko ba babei mpe bafaliseo bamileliki omboka bayekoli ba Yezu. Bakoliki mpo yandei bokadjei mpe bokameli elongo na bafutisi mpako mpe bato ba masumu? 31Yezu abayanoli na eyele ye: bato balo nzoto ndau baiyengela na munganga bito bobele bato babokono. 32Tu ndenge yawi naiyaka mpoya lobeka bato basemba bito babongola mitema. Nayeki nde naka kolele basumuki 'te babongola mitema.
(Mt. 9:14-17; Mt. 2:18-22)
33Omokia bato basu batuniki Yezu bo: Bayekoli ba Yowane mobatisi, baka kila bieka mpe baka bondele ntango inso. Bato ba batosiki mateya ma bafaliseo mpe bakilaka bieka mpe baka sambeli. Bayekoli bau bako kila bieka bito mpo yandei? 34Yezu ayanoli: bebi ba moloi baikoka na lotuka nzala bito, ntango elo moloi nabango? 35Kasi mokolo moko nde baumoli molongani ontei ya bango ontango ena nde batuki nzala. 36Omokia Yezu akoliki nabango Eyele esu: Akoliki Bato bakatena etei ya elamba bito, na elamba ya sika mpoya lobamba elamba ya kala. Te bakeli bona baka bebia elamba ya sika mpe etei ya elamba ya sika ekaba ndenge yawi na elamba ya kala. 37Yezu akoliki mpe bo, tu bona, bato bakaswa vino ya sika bito ontei ya mabeki ma kala, ye ekelami na mpoya Ntaba, te bakeli bona ntango vino ya sika nde epoli mpe etutoi edjingiki ekala mabeki ma kala. Omokia vino yango nde ekabeba mpe mabeki mango nde mabebi. 38Bato bayengeli nalokela vino ya sika o mabeki ma nino ma sika mpo vino to mabeki mango maba malau. 39Elo mpe yabwele bato ba bamesene lomele vino ya kala bakoba na mpowa ya vino ya sika bito mpo bakakolo te vino ya kala elo bolau loleka vino ya sika.

目前选定:

LUKA 5: NDW

高亮显示

分享

复制

None

想要在所有设备上保存你的高亮显示吗? 注册或登录