Ebandeli 3

3
Kokweya ya Adamu mpe Eva
1Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi :
— Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ?
2Mwasi azongisaki epai ya nyoka :
— Toliaka bambuma ya banzete ya elanga. 3Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. »
4Nyoka alobaki na mwasi :
— Solo penza, bokokufa te. 5Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye#3.5 Lolenge mosusu ya kobongola elobi : bokokoma lokola banzambe.  : koyeba malamu na mabe.
6Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. 7Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki.
8Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe. 9Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye :
— Ozali wapi ?
10Azongisaki :
— Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.
11Nzambe alobaki :
— Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ?
12Adamu azongisaki :
— Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.
13Yawe Nzambe alobaki na mwasi :
— Mpo nini osali bongo ?
Mwasi azongisaki :
— Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.
14Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo,
olakelami mabe kati na bibwele
mpe banyama nyonso ya zamba.
Okotambola na libumu
mpe okobanda kolia putulu
bomoi na yo mobimba.
15Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi,
mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye.
Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo,
mpe yo okoswa bango na litindi. »
16Nzambe alobaki na mwasi :
« Nakobakisa pasi na zemi na yo ;
okobota na pasi.
Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo,
kasi ye akozala mokonzi na yo. »
17Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, ›
mabele elakelami mabe likolo na yo.
Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
18Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende.
Okolia matiti ya bilanga.
19Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo
kino okozonga na mabele epai wapi owutaki,
pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
20Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva#3.20 Eva elakisi : bomoi., » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili.
21Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango.
22Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. »
23Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki.
24Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.

Поточний вибір:

Ebandeli 3: MNB

Позначайте

Поділитись

Копіювати

None

Хочете, щоб ваші позначення зберігалися на всіх ваших пристроях? Зареєструйтеся або увійдіть

YouVersion використовує файли cookie для персоналізації вашого досвіду. Використовуючи наш вебсайт, ви приймаєте використання файлів cookie, як описано в нашій Політиці конфіденційності