YouVersion logotips
Meklēt ikonu

Mabandela 3

3
1Moseme apiti bibwele bi zamba binco bi keli Yawe Nyambe mayele. Mpe alobi ombe o mwene ete, “Nyomeni, Nyambe alobi ete, ‘Bokozala nde o le kum’o miete minco mi lisala ka?’ ”
2O mwene alobi ombe moseme ete, “Lokoyisa nole kum’o mbolo li miete mi lisala; 3nde mbolo li mwete mong’o ntantei e lisala, Nyambe alobi ete, ‘Bozalaka nde o le lingo ka, bozalaka nde o limama ka, kani bino nowa.’ ”
4Mpe moseme alobi ombe mwene ete, “Bokozala nde o wa bowaka ka: 5nowela Nyambe akoyeb’ete o busa bonya bo kole bino kum’o lingo, angani miso ma bino makolibwa, mpe bino bokozal’ete nde Nyambe, bolamu na bobe boyebaka.”
6E boni mwene ete mwete moliki molamu mo le, mp’ete moliki bompal’o miso, mpe mwete mo bobiokeleke mozalisa moto na likani, akwi kum’o mbolo li mongo, mpe ali; mpe apesi mobali o yeye oliki na yeye, yeye mpe ali. 7Mpe miso ma bango babale malibwi, mpe bayebi ete baliki bwalë; mpe batongi mangu ma mitoko, mpe bakeleli bangome bipupa bi swa. 8Bayoki lokuku lo Yawe Nyambe botambolak’o lisala o matilimela ma busa: mpe o moto na mwasi o yeye babombani sei na miso mambe Yawe Nyambe o ntantei e miete mi lisala.
9Yawe Nyambe abiangi o moto, mpe alobi na yeye, Yeye ’te, “Y’onga wani?” 10Mpe yeye alobi ete, “Nayoki lokuku lo Yo o lisala, mpe nayoki bongo, nowela naliki bwalë; mpe nabombani.”
11Alobi ete, “Okosakoli ete oliki bwalë na? Osole kum’o mwete, mo kosikisi Ngai ete okozala nde o le mongo ka?” 12O moto alobi ete, “Mwene o mpi Yo azala na ngai, yeye ampi kum’o mwete, mpe ngai nali.”
13Angani Yawe Nyambe alobi ombe mwene ete, “Liye li sokela yo linga nde?” Mpe mwene alobi ete, “Moseme ankutinyi, mpe ngai nali.”
14Mpe Yawe Nyambe alobi ombe moseme ete, “Nowela y’osokela liye, y’onga boselibwaka kum’o bibwa binco, mpe kum’o bibwele binco bi zamba; y’okotambol’o lobobo lo yo, mpe okole mibulu misa manco ma mazalela ma yo: 15mpe Ngai nakotele bonketu o ntantei e yo na mwene, mpe o ntantei e libota li yo na libota li yeye: lingo likobolitinya mutu mo yo, mpe y’okobolitinya litindi li yeye.”
16Alobeli o mwen’ete, “Nakoyunisa bwale bo yo na boweli moi bo yo se boyunisaka; okobota bana na bwale; mpe mpos’e yo ekozal’ombe mobali o yo, mpe yeye akokokonga.”
17Alobi ombe Adama ete, “Nowela y’osoyoketela ma likingo li mwasi o yo, mpe osole kum’o mwete, mo kosikisi Ngai, bolobak’ete, ‘Okozalaka nde o le kum’o mongo ka’: masotu maka boselibwaka n’etondo e yo; se n’enyingi okole kum’o mango misa manco ma mazalela ma yo; 18mango makokobotela nzembu li malo na mangangambala; 19mpe okole biyembu bi esobe; o mitoki mi elongi e y’okol’engwele, yek’e kobutwa y’o masotu; nowela kum’o mang’okwibwi: nowel’onga mibulu, mpe okobutw’o mibulu.”
20O moto atomisi lina li mwasi o yeye Awa; nowela yeye aka nyango e ba bomoi banco. 21Yawe Nyambe akeleli Adama mpe mwasi o yeye minkoto mi bikoto, mpe abaswiisi.
22Yawe Nyambe alobi ete, “Bakeka, o moto aka ete mok’o Biso, noyeba bolamu na bobe; mpe sik’awa, kani yeye nosembola loboko lo yeye, mpe akwa kum’o mwete mo bomoi, mpe ale, mpe azala lobiko” — 23angani Yawe Nyambe amopimisi o lisala li Edene, nosala masotu ma kwiibwi yeye. 24Bongo Yeye abengisi bwele pwe; mpe atiki Bakeluba o lokenge lo eset’e lisala li Edene, mpe n’eloli ebundu bokalanganak’ani n’ani, nobatela nzel’e mwete mo bomoi.

Pašlaik izvēlēts:

Mabandela 3: BANGI

Izceltais

Dalīties

Kopēt

None

Vai vēlies, lai tevis izceltie teksti tiktu saglabāti visās tavās ierīcēs? Reģistrējieties vai pierakstieties

Lai personalizētu tavu pieredzi, YouVersion izmanto sīkfailus. Izmantojot mūsu vietni, tu piekrīti, ka mēs izmantojam sīkfailus, kā aprakstīts mūsu Privātuma politikā