„YouVersion“ logotipas
BiblijaPlanaiVaizdo įrašai
Gaukite programėlę
Kalbos parinkiklis
Paieškos piktograma

Populiarios Biblijos eilutės iš Kobima 32

1

Kobima 32:1

Mokanda na Bomoi

MNB

Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.

Palyginti

Naršyti Kobima 32:1

2

Kobima 32:7-8

Mokanda na Bomoi

MNB

Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela, bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »

Palyginti

Naršyti Kobima 32:7-8

3

Kobima 32:5-6

Mokanda na Bomoi

MNB

Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki : — Feti ekozala lobi mpo na Yawe. Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana.

Palyginti

Naršyti Kobima 32:5-6

4

Kobima 32:30

Mokanda na Bomoi

MNB

Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato : — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.

Palyginti

Naršyti Kobima 32:30

Ankstesnis skyrius
Kitas skyrius
„YouVersion“

Skatina ir kviečia jus kasdieną ieškoti artumo su Dievu.

Tarnystė

Apie

Karjera

Savanoriaukite

Tinklaraštis

Spaudai

Naudingos nuorodos

Pagalba

Paaukokite

Biblijos versijos

Įgarsintos Biblijos

Biblijos kalbos

Dienos eilutė


Skaitmeninė tarnystė, kurią vykdo

Life.Church
Lietuvių

©2026 „Life.Church“ / „YouVersion“

Privatumo politikaSąlygos
Pažeidžiamumų atskleidimo programa
„Facebook“„Twitter“„Instagram“„YouTube“„Pinterest“