Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

BOZALI na Libondeli!

MOKOLO 5 NA 6

“Bafungola motoba mpo na Libondeli ya malamu mpe ya bokatikati – Eteni ya Yambo

1. Boyeba moto oyo bozali kosolola na ye. “Tata na biso ya likolo…”

Tangu yesu asengaki na bayekoli na ye mpo na kosolola mbala moko na Tata, bayekoli na ye nayambaki likambu yango na mituna ebele. Na boumeli ya Boyokani ya kala, lolenge moko oyo moto nyonso ya mpamba akokaki kosala bosenga moko nae Nzambe ezalaki na nzela ya nganga-Nzambe. Ya esengo, Yesu ayaki mpo na kobongola nyonso wana.

Na ntina ya mbeka ya kokoka oyo Yesu apesaki na ekulusu mpo na kolimwisa masumu na biso, bandimi bazali ndingisa ya kosolola na Tata mbala moko. Yango wana, tozali kobondela Tata na biso ya likolo “na nzela ya Yesu”. Kasi, ezali na maloba oyo esalema Kaka mpo na Libondeli te, mpe kosalela Yesu ezali mpe na motuya ya ndenge moko lokola kosambela Tata ye moko. Eloko ya ntina ya kokanga ezali ete, bokabwani bozali lisusu te kati na bino na Nzambe.

2. Bokanisa mpe bobimisa losambo mpe botondi na bino mpo na oyo nyonso asali mpo na bino. “…Kombo na yo ekumisama…”

Tangu bozali kolekisa tangu ya libondeli na bino na lokumu mpe losambo, bozali kolongola likebi na bino moko. Atako Nzambe asepelaka koyoka bamposa na masenga na biso, alingi mpe ete tokumisa ye mpo na oyo asalela biso mpe tomona ete mokili esukaka Kaka epai na biso moko te. Kutu mokili esukaka nde epai na ye. Azali Nzambe ya Bozwi mpe ya bolingo, Abongi na lokumu mpe losambo. Tangu bozali kokanisa na mapamboli nyonso oyo Naambe apesa bino mpe litomba ya ntina mingi ya kozala na boyokani na Ye, bino pete kotonda ye botondi mpe kokumisa ye. Ekozala pasi mpo na bino komindela likebi Nyonso.

3. Bosambela mpo ete mwango na Nzambe mpo na eklezia na ye mpe bomoi na bino ekokisama penza. “...tika bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema lokola na likolo, ndenge moko na mabelé.”

Libondeli moko ya makasi mpe ya malamu ezali kosalela tangu tozali kotika kokanisa makambo oyo eleka mpe tozali kotya likebi na biso nyonso na oyo tokoki kosala lobi. Kokanisa kaka makambo ya kala ekoki koqukisa lobi na biso. Tozwa elikya yae Nzambe mpe totika te ete mikakatano to bambeba ya kala etonda na makanisi na biso mpe esikisa komanyola na biso. Yebisa Nzambe mposa na bino ya kozwa Elonga kati ya Yesu mpe bosenga ye mpo kokomisa vizio na bino molayi mpe bandoto na bino. Mposa na ye ezali ete bino bikoka kokokisa mwango na bino na bomoi na bino mpe ya Eklezia na ye.

Oyo etali Ebongiseli oyo

BOZALI na Libondeli!

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/